Lyrics

Makambo ezali bourreau Mobali akende na poto eh Mobali akende na poto eh Akende ko yekola oh Akendeki esika ya lisano oh Akende motambo oh Oyo nini eh Esika ya lisano moto nioso asakanaka Esika ya mawa moto nioso alelaka Ngai na leli mobali eh Akende motambo oh Na kuti na lopango bato bazali kolela Ngai na bandzi na ngai pe kolela Kolela na ngai mawa ya mobali Mawa na ngai ya tristesse eh Mawa na ngai ya cheri a kende eh Akozonga sanza nini eh Akozonga mbula nini eh Oyo nini eh Mikanda na yo ozali ko tinda Bongo papa ozali ko tinda Na telephone tozali kosolola Mbonte na famille ozali ko pesa Na lingi présence eh Ngai na lingi présence Ya bo moto na yo papa Oyo nini eh Boya makambo ezali minene eh Boya makambo ezali minene eh Franco a beleli na América oh Franco a beleli na Bruxelles Franco a beleli na Paris Balobi makambo ezali minene eh Makambo ezali minene eh Na sengi tonton nzela nga na bina Tonton a ndimeli ngai na motema Nga na memi ngambo na mutu Na kuti tonton na maboko ya mbanda na ngai Miso zoba e egalité Makambo ezali minene Motema elinga denge nini Makanisi e boya denge nini Molimo na tiya yango wapi eh Tonton a décevoir ngai A longoli ngai na esika na lingaka ye Makambo ezali minene Nazalaka soucis na motema na ngai Yango na koma komela mingi eh Yango na loma quiti quiti eh Po na longola soucis ya mobali oyo Akomi na camarade na ngai mama kusala Makambo ezali minene Obali a linga ngai a pesa ngai masanga Lobi na tongo nga na kawuki monoko Mokolo ya lopango liboso ya ndanko Kitoko na ngai na mayi ezindi Mobali a pekisi nga ba nzela ngai na kendeke Na vandeli ye na ndanko Abongisa Kasi sombela ngai ba metrage Kasi sombela ngai ba bijoux eh Kasi sombela ngai ba wax Mobali ya bandi na ye se kolela Oyo nini eh Likambo e suinisi ngai na zenaba franco Ngai nazali mama ya likelemba Ba lembi mingi aboyi ko pesa likelemba A tomboki na ngai A tobomki makasi eh A lobi azongisa bonga ya bato Alobi asali ba dépenses Na ba timbres ya banas Oyo nini eh Likambo to suani nga na zenaba franco To kongolaka bongo ya zando To pesaka ye akenda bruwelles na lomé Asombela biso ba wax Ekomi nzela par Bruxelles A bandi ko battrer ba bongo ya ba to A keyi na Hollande A sombi bilamba A tindi epayi ya mamou a teka To zeli bilamba sanza mitanu Zenaba a zongi Kinshasa Alobi ba yibi ba wax Boya makambo ezali minene Boya makambo ezali minene eh Franco a beleli na América oh Franco a beleli na Bruxelles Franco a beleli na Paris Balobi makambo ezali minene eh Makambo ezali minene eh
Lyrics powered by www.musixmatch.com
instagramSharePathic_arrow_out