Featured In

Credits

PERFORMING ARTISTS
Luambo Makiadi
Luambo Makiadi
Performer
COMPOSITION & LYRICS
Luambo Makiadi
Luambo Makiadi
Composer

Lyrics

1) Oh oh nasali nini oh? Senzela mwana ya moninga Ozui ngai na pasi Batela ngai na ntango likambo bamona Bondela ngai soki nasaliki Mwasi alingaka présence ya mobali eh 2) Oh tokabola faute Mabe ebandi na yo, mpe na ngai eh Lokola bato bayebi toluka équilibre Senzela mwana ya bato eh Bondela mwana ya bato eh 3) Oh oh nasali nini oh? Senzela mwana ya moninga Ozui ngai na mpasi Batela ngai na ntango likambo bamona Bondela ngai soki nasaliki Mwasi alingaka présence ya mobali eh 4) Oh tokabola faute Mabe ebandi na yo, mpe na ngai eh Lokola bato bayebi toluka équilibre Senzela mwana ya bato eh Bondela mwana ya bato eh 5) Oh oh nasali nini oh? Senzela mwana ya moninga Ozui ngai na mpasi Batela ngai na tango likambo bamona Bondela ngai soki nasaliki Mwasi alingaka présence ya mobali eh 6) Oh tokabola faute Mabe ebandi na yo, mpe na ngai eh Lokola bato bayebi toluka équilibre Senzela mwana ya bato eh Bondela mwana ya bato eh INSTRUMENTAL 7) Matata ya mwasi na mobali esila te na mokili mama ah, mama ah Oh mama, mama ah, mama ah Oh mama 8) Likambo nini Nzambe Osala biso mibali, Tosalelaka basi. Bango baliyaka, balataka, Biso mbula mobimba patalo moko na nzoto eh (Etoboka kutu eh) Oh mama 9) Matata ya mwasi na mobali esila te na mokili mama ah, mama ah Oh mama, mama ah, mama ah Oh mama 10) Mama aboti ngai mwasi Oyo akoniokola ngai mwasi Nzambe apesi ngai etumbu Nabotaka basi bandeko Bananiokolo bana ya bato Nayoka motema mpasi bandeko Oh oh mama, oh mama mama mama mama ma ah 11) Matata ya mwasi na mobali esila te na mokili mama ah, mama ah Oh mama, mama ah, mama ah Oh mama 12) Soki abimi azongi, kotuna epayi awuti te(comment!) Soki yo okendeki ko traiter ba affaires Olobi ozonga, olia, opema, Akomi kotuna yo (owuti wapi) Ozalaki wapi, owuti wapi, balobaki boye(oh!) Mwasi nabala na mosolo, nani apesi ye autorisation, Atuna epayi na wuti bandeko Oh oh oh mama ah, oh ma ma ma ma ma ma ah 13) Matata ya mwasi na mobali esila te na mokili mama ah, mama ah Oh mama, mama ah, mama ah Oh mama 14) Likambo nini, Adamu olataka ndambu ya liputa Eve akosaka yo. Biso tomonaka bwale Oh ma, ma ma ma ma ma ma ah. 15) Matata ya mwasi na mobali esila te na mokili mama ah, mama ah Oh mama, mama ah, mama ah Oh mama 16) Oleka awa basi(kuna!) Oleka kuna matata bandeko Bino basi, basi, bandeko Bino nde boko boto biso Bino bokobokola biso Bino moko boko bala biso Bino moko boko niokola biso Tokosala nini bandeko Obalani yo na mobali Matata mikolo nionso na ndako, Mpo na nini boye Oh oh mama, oh mama mama mama ma 17) Matata ya mwasi na mobali esila te na mokili mama ah, mama ah Oh mama, mama ah, mama ah Oh mama
Lyrics powered by www.musixmatch.com
instagramSharePathic_arrow_out