Lyrics

Kumisama Nzambe Oyo asalaka na mandat té Oyo azalaka elu na peuple té Oh mbul'oyo to changer nzambe po apamboli biso té Po na bible ekomama té que tout est possible Na moto oyo atanga mingi, to aza riche ou pauvre Mais la Bible nous dit tout est possible a celui qui croit en Dieu Okoki kozala no rien moto pamba mais Dieu a elever yo Boyokaaaa Jb muana mama agnes lusambo niongo ya nani na defa Naboya kofuta, bozosala ba campagnes bodestabiliser bin adam Boko reussir nga mokolo nzambe akolala pongi Elevation na nga ewuta ni orient to occident Ewuta na nzambe oyo asala grace na ye na ba humbles na Bato alingi, tshia muntu tshia muntu tshia nzambi tshia nzambi (Kotika nga té yahweh) Eloko bolingo nzambe akela po tolingana Awa na mokili ekoma po na interet Gentilesse ya bato ezali sé na presence Soki opesi mokongo osambue na matongi Po tozolia ehh bobengi nga ndeko Po tozomela bobengi nga moninga ehhh Mokolo ya likambo bilongi ekomaka ya kotanga Nako se retrouver lokola yezu masiya Na ngomba ya golgotha mokolo ya liwa na yé (Tobondela makasi) Yezu alamwisaka lazare po na nkembo ya nzembo Lelo nayebi liwa na ngai ezali kembo ya ba nguna Molimo eyebana ya nzambe nzoto mabele ya pamba Bo kamata bo sala mposo, bosala na yango mbunda Bobeta, bobina, bosala feti mitema na bino ekita Lokola bo ko vivre eternellement Nasekaka pasi ya moto té ngai jb mpiana Po nayebi pasi na liwa eza nzela ya moto nionso Bopanzaka nga nsango nabeli lliboma Bolingi vie na nga ebeba, nani akosunga bana na nga Mabe ya moto bomonaka sé na miso, soki azali té bokokanisa Ye ata na likambo moko niongo ya nani nga na defa Aloba na futa, bo botika koluka moto ya bomoyi na mboka ba wa Bokanisaki ngai eh eh binadama naza Ezau bolati mposo ya meme Po bo distraire public ayokela bino mawa Aboyi ba benedections na ngai eh jb mpiana Histoire echangeaka té papa wemba, Histoire echangeaka té josky kiambukuta Eh, histoire echangeaka té president nyoch eh Nzembo na nga ya mulolo ebimisa wenge Nzembo na nga ya kin e bouger e confirma wenge Bolinga bolinga té ba temoins na nga bazali public na nzambe Verite yango wana Yezu kutu muana nzambe abongola mayi na vino, alamusa batu bakufa, Batambuisaki ba koka, mokolo bakangaki yé bato batiolaki yé, n Denge moko na papa cheri pasi na nga nde esengo ya ba nguna Bokanisaki ngai eh eh binadama naza Ezau bolati mposo ya meme Po bo distraire public ayokela bino mawa Aboyi ba benedections na ngai eh jb mpiana Moto soki azali na mbongo, Ndaku na ye etondaka tous les jours na ba Famille b'amis, lun jour soki azangi ndako ekomi desert Lokola moto oyo ayebanaki ata na moto té Lobi soki akufi, baninga ba famille ba yé na mituka ya talo batié Ba cotisaitons ya minene, alors na mbeto ya lopitalo moto té ayaki Ata na presence ya pamba po eko consoler yé, tolinganaka téééé Bana congo mobimba, tolingana Jb mpiana et werrason tolingana, didier masela, Alain makaba, blaise bula, dominguezi tolingana...
Lyrics powered by www.musixmatch.com
instagramSharePathic_arrow_out