Lyrics

Na Getshemane yomeli keni oyo Ya miniongo mawa pe pasi Ondimi kokoma lisumu eloko oyo osala manu te Yo moto owumela mabosantu Epanda boni yo okomalisumu? Yaya na nga obongi na yango te Ezanga ngayi nde na meritaki somi oyo eh eh eh Nakanisi nzela ya ekulusu Yango poni bato ebele boye Basangeli moto se moko asali bango nini? Tala mosusu akamati soyi ya ebele na monoko na ye Asopi yango se na elongi Elongi oyo ya mwana na pate Oyo amesana koseka oyo amesana kolimbisa Yaya na nga obongi na yango te Ezanga ngayi nde na meritaki somi oyo eh eh eh Tango nazalaki na masumu Masiya ondimi liwa eh eh Ozui penza esika na ngayi Ngayi pe makomi musantu Tika lelo nayebisa yo Oh! Jésus, tu es tout pour moi Bolingo nde elongoli yo na lola Yango nde ekitisi yo na se Kaka bolingo eniokolo yo Et tu es mort au nom de l'amour Olongoli kazaka ya bokonzi Olati elamba ya mosali Kasi bato oyo olingaki mingi Babaluki babeti yo fimbo eh eh Ekulusu kilo na mokongo Ondimi etumbu ya liwa ye Yaya na nga obongi na yango te Ezanga ngayi nde na meritaki pasi oyo eh eh eh Pasi oyo oh oh nameritaki yango oh Nameritaki pasi oyo Ozelite nabongola motema To pe nayeba yo nanu Tango nazalaki na masumu Masiya ondimi liwa eh eh Ozui penza esika na ngayi Ngayi pe nakomi musantu Tika lelo nayebisa yo Oh! Jésus, tu es tout pour moi Na poto poto eh eh Na masumu eh eh Oh! Vraiment Tango nazalaki na masumu Masiya ondimi liwa eh eh Ozui penza esika na ngayi Ngayi pe nakomi musantu Tika lelo nayebisa yo Oh! Jésus, tu es tout pour moi Oh! Jésus, tu es tout pour moi eh eh Oh! Jésus, tu es tout pour moi Osi okoma nionso po na ngayi Na maboko na yo ya pembe Okiti na poto poto Yesu oyo Oh! Jésus, tu es tout pour moi Okomi pe lisumu Okomi pe moto ya mabe Yaya Oh! Jésus, tu es tout pour moi Ah! ah! merci pour le sang, Merci pour la croix Oh! Jésus, tu es tout pour moi Ah! ah! nasi nazua maladi ya bolingo esilaka te eh eh Oh! Jésus, tu es tout pour moi Nakota virus ya bozambe suka se na lola yaya eh eh Oh! Jésus, tu es tout pour moi Ah! ah! oh! Jésus, tu es tout pour moi Le refrain de mes chants, la raison de ma vie.
Lyrics powered by www.musixmatch.com
instagramSharePathic_arrow_out