Lyrics

Natali na bomoyi na nga na yoki pasi emati Tuna nga nini yaya esengo ezali te Na tali na mobongo na nga na yoki pasi emati Tuna nga nini yaya? Bofuluki ezali te Na kanisi bilaka na Olobaki esengo ngolu eko zala na nga ezali wapi? Ngonga epusani eh Ko lela eleki eh Olobi nini Nzambe pona bomoyi na nga? Ekila ya monene boye ekalami na liloba na yo Nini ango ezo zanga po loba ya nga pasi esila? Nzambe na nga ozali wapi Nzambe nanga? Est ce que oyoki te? Nzambe na nga na tuni wapi Nzambe na nga? Est ce que omoni te? Awuti zamba alembi Tala elobi nga yoyo Likolo ya bileyi ya kolia Esaü ateki bo yaya Na wutaka musala na yo Na zongaka maboko pamba Mokili etalisi nga bomengo Na boyi ko teka bokristo pona yo Nzambe na nga ozali wapi Nzambe na nga? Est ce que oyoki te? Nzambe na nga na tuni wapi Nzambe na nga? Est ce que omoni te? Ozali nzete nga etabe Nioso ya yo ezali pe ya nga Olati nkembo lokola elamba Nga na lati mawa lokola kasaka Na luki na yeba esengo nde nini? Bozuwi pe nini? Na taleli yo Nzambe na nga ozali wapi Nzambe nanga? Nzambe na nga na tuni wapi Nzambe na nga?
Writer(s): Moise Mbiye Lyrics powered by www.musixmatch.com
instagramSharePathic_arrow_out