Lyrics

Olobaki nini eh eh eh eh Olobaki nini, Mamou, eh eh eh eh Olobaki nga na fundaka yo, na mobali na yo Olobaki nga na salaka kisefe, na libala na bino Olobaki nini eh eh eh eh Olobaki nini, Mamou, eh eh eh eh Olobaki nga na fundaka yo, na mobali na yo eh Olobaki nga na salaka kisefe, na libala na bino (Luambo Makiadi) Madilu tika ye aloba eh Makambo ye asalaka, ayebaka te Ba balabala ye atambolaka, bato ba monaka ye Ba ndako ye akotaka, ba mur ya ndako efundaka ye Na ba coin nyoso ye a telemaka, ba chauffeur taxi ba monaka ye Po na nini a panza yo sango, alobi, yo osalaka kisefe Um (Madilu System) Ngai moto na kotelaka yo, Mamou eh eh ye ye Ngai moto nayebi ba sekele, Mamou eh ye ye Lelo na komi moto mabe, Mamou eh eh Oyebi tango engindaka oh, Mamou eh eh Oko kanisa ngai Mamou, na kei eh eh Ata ofingi ngai ndumba, Mamou yee (Luambo Makiadi) Oh Mamou, na kamwe vraiment, Mamou Na kanisaka ozalaka ami na nga ya motema Po oyebi que nayebi ba secret na yo nyoso Eloko ekamwisi nga Mamou Okei ko finga ngai epa ya Musa Olobi ngai nazali ndumba Vraiment, Mamou Oyebi, ngai na balaka Na divorca, na bota Bongo soki lelo yo, Mamou Moto na tiaka motema Obandi ko finga ngai ndumba Ki ndumba ezali maladi te Kindumba ezali punition te Mamou, yo mwasi ya libala Na kamwaka yo, oko tambola na kabambi ya sac a main Na kati ya sac wana, kabambi ya liputa Brosse a dents lokola moto azali ko kende voyage Lipapa ya se, ebele ya makasu Mamou, oyebi, epayi na yo nga nazalaka vivard Po mibali nayo nyoso tout Ata mobali na yo akuti yo ozali ko solola na mobali Oko loba que aza mobali na ngai Mais na lingaka ko boma libala na bino te, Mamou Ummm Po na lingaka bo bokolo bana na bosembo Au lien na kota ba loba oh Tala mwasi ya ndumba awuti ko boma libala ya mwasi abala Um (Madilu System) Eloko nini oko luko oh, Mamou eh ye ye Eloko nini olo luka oh, Mamou eh ye ye Signature osi ozua, Mamou Landa nzela ya libala oh, Mamou Landa nzela ya libala oh, Mamou eh yeye Yango evandisa yo na poto, Mamou eh eh Tika ko kosa mobali nayo, Mamou eh eh Soki atelephone loba obimaka, Mamou (Luambo Makiadi) Mamou, awa lisusu soki na lobi Na kumbi ngambo, po naza ndumba Yo moko oyebisa ngai Mobali na yo atinda yo na poto, po oya ko bokolo bana Ya ngo nde apesa ya signature Ekoma yo awa, oyebisi nga mobali na yo a telephonaka yo 2fois par jour Na 6heure du matin, na minuit Apres minuit soki a telephone yo Okamati kisi ya ba ngungi, opompe ndako mobimba Po bana ba lala ti tango yo oko zonga Po oyebi que mobali na yo atelephonaka na 6heure du matin Tango atelephonaka yo, yoka ndenge oyebisaka na mobali na yo Alo, papa ya bana Biso toza na biso kaka malamu Kaka nde bana no awa moyen te Vraiment mobulu likambo Surtout mwana oyo ya muke ya mobali azua elongo nayo, papa Eh, azo kamwisa nga vraiment Photo kutu otia na sani, na talaka ata elongi na yo Abamba yango na mabele photo epasuka Mwana oyo penza mobulu moyen te penza Kaka ndenge ozalaka mwana muke Lokola mama na yo ayebisaka ngai Papa ya bana, naza na makambo mususu na lobaka te Kaka otindelaka biso mbongo ya ko lia Na suki se bongo (Madilu System) Yo moko osalaka mabe oh, Mamou eh yeye Yo moko osalaka mabe ye Obangaka mobali nayo te, Mamou eh eh Olongola respect na ye okaba, Mamou eh eh Ba camarade ya mobali nayo, Mamou eh eh Obangaka bango te oh, Mamou eh ye ye Lelo ofingi ngai ndumba ah nga na seki eh, Mamou, ye (Luambo Makiadi) Oh Mamou, kindumba oza ko finga ngai Bruxelles mobimba Oke ti na Paris osilisi ngai Otindi mokanda na Kinshasa Mosusu otindi na Brazza Kindumba eza punition te, Mamou Oyeba Mamou esui ngai Na lingaki dailleur na funda yo, Mamou Inutile na funda yo Na kamati obe film ya makambo nyoso ya mabe, oyo osalaka Na tekisi yango epa ya Yorgo Po azikisela ngai film wana Mamou koma ngai Ndenge ba komaka Yezu na kuruze Sete mibale na loboko Sete moko na lokolo Mamou, ozali mwasi ya libala Okamwisaka ngai Na monaka yo oza ndoki Oza kinsenkwa Ozali munyororo Mamou, nini nakoki ko loba po na yo Example nini na koki na pesa po na basi ya mabala Example ezalite Awa ba lobe te nga nazali ndumba Nako tambola na mwasi ya libala Yango nako pesa yo makannisi mabe, te! Ezali nde yo moko moto oza na makanisi ya mabe (Madilu System) Ngai moto na kotelaka yo Ngai moto naybi ba sekele Lelo na komi moto mabe, Mamou eh eh Oyebi tango egindaka, Mamou Oko kanisa nga, Mamou Nake eh eh Ata ofingi ngai ndumba, Mamou, ye
Lyrics powered by www.musixmatch.com
instagramSharePathic_arrow_out