Lyrics

Tongo etani Boyebisa ye Nakowa pona ye Le grand Saoudien Na sauce bakotiaka feuille de laurier Basusu bakobakisaka cube Maggi Kasi na bolingo batiaka nini? Po na convaincre motema ya Adam Bombole Na mériter pardon nazala libéré Ekomeli ngai soni mingi eh Kotanga kombo ya moto alingi ngai te Raison nini na inventer Na mériter pardon nazala acquitté Bolingo elekaki ndelo yango e provoquer innondation Soki tosalaki ngele, mbele tokomaki na situation oyo te Bolingo ezalaki na recto ekomi na verso naye zoba iih Naye zoba maman, Humm... naye zoba Oye kotonga immeuble ya ba souçis o kati ya motema na nga Et pourtant na horloge ya motema tozalaki nanu na minuit y'oboyi nga Na culture africaine, koboya mutu na butu ezali mabe Adam Bombole Tala nakomi lokola moto ayaki kosala intérim na motema na yo Wapi thermomètre ya bolingo po y'otanga degré na nga? Nakomi lokola moto ayaki kosala pique-nique na kita ya motema na yo Na déontologie ya ba amoureux égoisme ezali permis Po nzoto ezangi pièce de rechange Moyen ya kosala révision ya motema ya moto ikele ve Bolingo ya porcelaine y'opesi ngai ezali bolingo ya risque ngo Une fois par terre Adam Bombole, nde epasuki Bolingo ya talatala, y'okabeli nga ezali bolingo ya risque Une fois par terre, le grand Saoudien, nde epasuki Nazala ata petit poucet na retrouver nzela y'okeyi Avant que tongo etana, ekoma trop tard, Adam Bombole Tshouba, bakulaka bakulutu boyok'oyo ya ngai Oyo ezali champagne. Soki ezangi na feti, mawa trop! Eh nakosenga se na ba écrivains Basala photo-romans ya bolingo ya Adam Bombole Bato ya mokili batanga na esengo Baye bakoya na sima, etikala se l'histoire na bolingo Adam Bombole azali lokola Moise abikisaka bana Israel Abeta... na kati ya mayi mayi makabuani Eh nakosenga se na ba écrivains Basala photo-romans ya bolingo ya Adam Bombole Bato ya mokili batanga na esengo Baye bakoya na sima, etikala se lísitwále na bolingo
Lyrics powered by www.musixmatch.com
instagramSharePathic_arrow_out