Lyrics

"Je t'aime" ya muana moto ekomi j'etais Ce que corps étranger ekoti kati Allah asala mokili akabola té, lisumu ya moke na ya monene Na moto ayibi mosolo, na moto ayibi bolingo Epaya Nzambé dimension lisumu ndengé moko Degat eloko ya moke ekosala kati liso ya moto Peut-être ya monene ekoki'osala pé té Nzeté ya lipela moke na miso Po nako kata, oyo lichette emonaka po elobaka té Kima nayo ba appels na nga mais ba SMS oko tanga Ali Mayimona l'entrepreneur international Nazo tambola, nazo nimba, nazo ronflé nzela-nzela Na ba ndoto na nga oza ko apparaitre facilement Oy'a yo soki omoni nga, ofukami, opameli nga kendé Soki omoni nga, obangi, o gangi "au nom de Jésus" Est-ce que nakomi démon, Ali Mayimona Est-ce que nakomi monguna papa pia nga visa ya motema na yo Na kota, na vanda, na zuwa séjours ozala identité Circulation autorisée sans dérangement ba agents ya l'etat Motema Ali Mayimona residence na nga Awa oyekoli ko pelisa, yekola ndengé'ako boma ngo Soki etumbi ndako ya ba voisin, ekokoma likambo ya l'état L'état po akanga moto liboso atindaka convocation Soki o se présenté té, atindi ya mibalé Oboyi kaka ko kendé wana ekomi mandant d'amené Baya ko memela nga yo eeh oko yoka té Nioso ozo senga ata moko té na bo kosala Na tongo otindi na pesa yo mayi, o bwaki n'o kopo Na pokwa osengi na bongisa mbeto, o lali n'o té Po nini, o préféré canapé Ali Mayimona aaah Olivier Lukoki, Nanu Mondele Eeh na moni (nakomi'okanga yo na makasi) Et pourtant (bolingo esengaka non-violence eh) Soki otié ngayi tranquille, yo pé oko zala tranquille Soki otié ngayi kaka wana non Soki otié nga molungé wana non Ouh yebaka (masuwa ya sans démarreur epelaka té) Na mayi (moyen yako tindika eko zalaka té) Soki otié nga mal alaise, oko zala mal alaise Soki otié ngayi kimia wana gout Soki otié ngayi kimia wana gout Mbwa soki azo bima asubaka nzela-nzela Po tangu ako zonga, alanda bilembo ya masuba na yé Abunga nzela té eh mama Y'okomi lokola bébé ba bungani na mama na nzela Yé ko maloba moins, aloba adresse ya ndako na bango Baya kotika yo, obungi adresse ya motema na ngayi Balakisa yo na télévision ebongo naya kozwa yo Papa na nga, bébé na yo azo konda na ba soucis Ali Mayimona y'otiki motema na nga (bolingo), isolé Ngayi wana nazo lela (lela) PDG Mayimona y'otiki bolingo na nga (bolingo na nga), isolé Liboké oliesi ngayi, mosuni yango cherie nayebi té Nalia na soni po oyeba kaka nalingaka yo Mobali azalaka tonga, muasi azalaka singa po alanda yé Blagues à part ngayi nazalaka muasi ya lolendo Wuta nalinga yo eeeh, lolendo na nga esila Mais lakisa nga eteni moko ya nzoto, nayeba o lingaka nga Kolakisa nga mokongo té yango ezali signe ya mabé na bolingo Oyebi na lela yo eeh, mais tik'o niokola nga Eeh na moni (nakomi'okanga yo na makasi) Et pourtant (bolingo esengaka non-violence eh) Soki otié ngayi tranquille, yo pé oko zala tranquille Soki otié ngayi kaka wana non Soki otié nga molungé wana non Ouh yebaka (masuwa ya sans démarreur epelaka té) Na mayi (moyen yako tindika eko zalaka té) Soki otié nga, mal alaise oko zala mal alaise Soki otié ngayi kimia wana gout Soki otié ngayi kimia wana gout Ali Mayimona y'otiki motema na nga (bolingo), isolé Ngayi wana nazo lela (lela) PDG Mayimona y'otiki bolingo na nga (bolingo na nga), isolé
Lyrics powered by www.musixmatch.com
instagramSharePathic_arrow_out