Listen to Lokumu Eza Ya Yo (feat. Anne Keps) by Gael Music

Lokumu Eza Ya Yo (feat. Anne Keps)

Gael Music

Praise & Worship

Lyrics

Oza Nzambe na bolingo O bongi na lokumu Yahweh lokumu eza ya Yo Yahweh lokumu eza ya Yo Sala nga na yeba eh Baposa ya Motema na Yo Loba nga na yoka eh Mabanzo ya molimo na Yo Bongo nga na kokisa Papa eh Baposa ya Motema na Yo eh Bongo nga na loba maloba eh May'e ekosimba Yo Loba nga na yoka eh Mabanzo ya molimo na Yo Simba nga na ningana eh Na nguya ya Loboko na Yo Bongo na misopa Papa eh Mabolongo na sé, na sanjola Na mitika Yahweh, liboso na Yo Oza Nzambe na bolingo (oza Nzambe na bolingo) O bongi na lokumu, Yesu eh (o bongi na lokumu) Yahweh lokumu eza ya Yo (Yahweh lokumu eza ya Yo) Lokumu eza ya Yo eh (Yahweh lokumu eza ya Yo) Sala nga na mona eh Nguya ya loboko na Yo Mimonisa na kamwa eh Nkembo ya Bonzambé na Yo Bongo nga na tatola Papa eh Makoki na Yo Mosantu eh Bongo nga na sanjola yaya eh Na loléngé olingi-oh Mimonisa na kamwa eh Nkembo ya Elongi na Yo Simba nga na lenga eh Na nguya ya Loboko na Yo Bongo nga na loba maloba eh Na maye o' na moni na Yo Bongo nga na sanjola yaya eh Monéné na Yo Oza Nzambé na bolingo (oza Nzambé na bolingo) O bongi na lokumu, Yesu eh (o bongi na lokumu) Ah, Yahweh lokumu yango ya nani? (Yahweh lokumu eza ya Yo) Mokonzi lokumu yango ya Yo (Yahweh lokumu eza ya Yo) Sala nga na tatola eh Nguya ya Loboko na Yo Kokisa na yemba eh Bilaka ekoma loyembo oh Nde nge Yo osalaka Papa eh Yango nde ekoma mabina Bongo nga na tatola Papa eh Na mabota nionso Oza Nzambé na bolingo (oza Nzambé na bolingo) O bongi oh (o bongi na lokumu) obongi na lokumu Yahweh na nga Papa lokumu eza ya Yo eh (Yahweh lokumu eza ya Yo) (Mokonzi lokumu eza ya Yo eh) Yahweh lokumu eza ya Yo Ebandeli pé suka na nionso, lokumu eza ya Yo eh (Eh Yahweh, Yahweh lokumu eza yayo) Mokokisi na nionso Papa, lokumu eza ya Yo eh (Yahweh lokumu eza ya Yo) Ba honneurs, ba acclamations ebongi na yo Papa (eh Yahweh, Yahweh lokumu eza ya Yo) Malasi ya kitoko pé ya valeur, na sopi yango na makolo na Yo (Yahweh lokumu eza ya Yo) Motolé ya nkembo, elamba ya lokumu ebongi na yo mokeli na nionso eh (eh Yahweh, Yahweh lokumu eza ya Yo) Yahweh Lokumu eza ya Yo (Yahweh Lokumu eza ya Yo) Yahweh Lokumu eza ya Yo (eh Yahweh, Yahweh Lokumu eza ya Yo) Lokumu eza ya Yo Lokumu eza ya Yo Lokumu sé ya Yo Lokumu eza ya Yo Ebongi na moto té o Lokumu eza ya Yo Solo na batu ya mokili té oh Lokumu eza ya Yo Eh Yahweh, yaya
Lyrics powered by www.musixmatch.com
instagramSharePathic_arrow_out