Lyrics

Destinée na ngai oh, eza na Maboko ya nzambe mosalisi Milelo ya lelo, lobi eko zala sujet ya masanjoli Ata ko molili, suka suka un jour moyi e ko belema Jehovah tsidkednu, elombe N'etumba a telemaka na suka Eh Yahweh yo mokeli ya likolo na se Bipayi miso ya ba santu nioso e talelaka Ba ya epayi nay o o kokisa oyo ya bango posa Ba belela yo pe ba uza ya bango eyano Kasi oyo ya ngai mongongo neti Ezo koma te na matonyi na yo Ba pasi pe minioko e koma Quotidian na ngai amis de tous les jours Masiya ozali wapi Sepelisa motema na ngai eh eh Mema ngai esika oyo o laka ngai eh eh Silisa ba pasi na ngai eh eh eh Pe kawusa pinzoli Ya ngai muana oyo e tanga mbula na mbula Motema ezo koka te yanola ngai Kokisa bilaka oyo o lakaki na ngai E bongo na yemba loyembo ya sika Destinée na ngai oh Eza na maboko ya nzambe mosalisi Milelo ya lelo, lobi eko zala sujet ya masanjoli Ata ko molili, suka suka un jour moyi e ko belema Jehovah tsidkednu Elombe n'etumba a telemaka na suka Na liste ya bato oyo ba bonga Est-ce que kombo na ngai e ko zala pe n'ekisa n'ango Litige ya bomoyi na ngai Conclusion n'ango e simbami na maboko ya nzambe Yango ngai na tingami se na yo Yo nde oza na makoki ya ko silisa mipepe mabe Ba pasi ata e wumeli n'ango Ngai na bungisa elikya na ngai te Sepelisa motema na ngai eh eh Mema ngai esika oyo o laka ngai eh eh Silisa ba pasi na ngai eh eh eh Pe kawusa pinzoli Ya ngai muana oyo e tanga mbula na mbula Motema ezo koka te yanola ngai Kokisa bilaka oyo o lakaki na ngai E bongo na yemba loyembo ya sika Kasi projet de paix et de Bonheur O laka na zuela yango ndengue nini (Jehovah Tsidkenu, yaka o kata likambo na ngai) Pasi e leki na komi'o mona motemam neti e lâché (Jehovah Tsidkenu, yaka o kata likambo na ngai) Différence oyo o laka ngai ti mokolo nini Jehovah Tsidkenu, yaka o kata likambo na ngai Est-ce que bolamu na yo eza kaka pona ba susu eh Jehovah Tsidkenu, yaka o kata likambo na ngai Ba ninga to kola na bang oba koma ba notables Jehovah Tsidkenu, yaka o kata likambo na ngai Na suka ya likambo ye wana elombe Na sutuki boye vie na ngai e change Ndoto na ngai e komi réalité
Lyrics powered by www.musixmatch.com
instagramSharePathic_arrow_out