Lyrics

Ndimbola eh maman Ngai Reddy nalanga makambo Ngambo namema nayebi té Bakofinga ti na sang, nakomi komesa nango Lokola soldat oyo akendaka etúmba, lokito ya masasi emesana Wuta kala, wuta kala Na tuni wuta kala mokili yango ebandaka Na masumu to lelo eleki? Ba nani balingi balekisela ngai tango Po na nga tango ezali précieux Ba koloba, ba kofinga po naboma nzóto Oyo nga nzóto eza se moko Mokolo liwa ekoya nayebi té oh Nalengela mwa tango Nzambé adefi nga Na tuni eh, ngai natuni Natuni bato ya mbóka Oyo babanda mosálá oyo libosó na nga Baloba po nayeba, matoyi ekosala pasi Sadam Oussein yóka melope oyo Mokili oyo mambu mingi Monguna aza pembeni nayo Akolia lokola mpuku Mabe bakosala na moninga pene Ndakisa na yango zala ekenge Mwana nzela oyo okotambola ah Monguna aza pembeni na nzela (ako tala yo) Keba na verre nayo ya masanga (sala keba) Ekenge luta nzela ya mbongo (tala ngambu) Surtout masolo ya ba nketo keba (Bakento bo keba na mambu makambo) Ya nga likambo na nani? Makambo epona kaka nga Nani ayemba nga eh Oyo yanga ekomi kamwa Moto ako senga eloko se kombo na nga Soki azui te yoka kombo na nga ndenge ekozika (Na minoko ya bato) Patcheli mwana samy, Patrick Diamona Mabé nasala nayebaka té Mosala na pona miziki Pona bokolo bana na ngai Oyo ya ngai ekomi kamwa Moto ako senga eloko se kombo na nga Mama eh, mama oh Kombo na ngai esambwé, ekomi elengi mafuta ya nzoyi Balangwaka kaka na kombo na nga Baluka basi na kombo na nga Mabé nasala nayebaka té Mosala na pona muziki Pona bokolo bana nangai Oyo ya ngai ekomi kamwa Moto ako senga eloko se kombo na nga Dédicaces Mabé nasala nayebaka té Mosala na pona muziki Pona bokolo bana nangai Oyo ya ngai ekomi kamwa Moto ako senga eloko se kombo na nga Mama, mama Maman yoka mongongo na nga Ba lingi bazua mposo na nga ya nzoto Basala na ya ngo mboda Oh, Godert nasali nini? Mabé nasala nayebaka té Mosala na pona muziki (na sali nini?) Pona bokolo bana nangai Oyo ya ngai ekomi kamwa Moto ako senga eloko se kombo na nga Oh-h-h-h-oh Fonsi Tshimanga, Ignace Moleka, Jean-Paul Onema Michel kabeya, Ya Célé', Kambaka kamuzuna Ya nga likambo na nani? Makambo epona kaka nga Nani ayemba nga eh Oyo yanga ekomi kamwa Moto ako senga eloko se kombo na nga Soki azui te yoka kombo na nga ndenge ekozika (Na minoko ya bato)
Lyrics powered by www.musixmatch.com
instagramSharePathic_arrow_out