Lyrics

Alya he e, Mukaramè Tala ye kuna minu mpembe koleka nzambala ya pape Suki elingama lingama Alya O Alya où es-tu Alya na nga? Point faible na nga yo point fort na nga mpe yo ye My wife, my wife Aliana Bolingo esengi nga audience Velo ya kimbambala kumba nga na Malueka Nakende kotala motshima na ngai maman bébé na ngai Soucis soucis, soucis soucis Etondi motema meke Etie motema na nga tshobo O kiti ekomi mbeto, loboko ekomi coussin mon cœur Alya hé, Mukaramè Melisa nga ata poison que oniokolo nga na mokili Amour na ngai, kitoko ya nzete Liboso mpe nasima eyebana te Kaka ye amour nga ba projet ya suka nionso eza yo Na kobatela yo Alya pour toujours amour ya suka te Alya Eternité (Eternité bolingo ewumela) Koleka temps (tango musu azuakate po asala tour du monde) Hein hein amour ya vie nanga eza yo yo Y'oza réponse ya motuna ezangaka eyano Depuis époque ya Moïse, Abrahama na roi Salomon Miso na nga ezalaka yo Alya na ralenti Crique oyo ezalaki na motema esi elongwe Nazali awa lokola motuka oyo ezangi frein Na descente moyen te na résister Aliya Nitu Mambu yaya, George Litu yaya mpe Boyoka likambo ekwelinga leki na bino mokonzi mopawo Mokolo mosusu bato ya contribution baye na ndako Kaka ndenge ezalaka batala mwa ba bien Mpo ba taxé nga nafuta mpako ya l'état Na comprendre te tango mère aleki Namoni kaka bakomi kosolola na litoyi Babetaka babetaka ba machine Nzoka, mère a beteka mpenza veut dire demarche Ya mokolo oyo na kweyaka ndeke nga mokonzi Normalement nga jusque là impôt eyaki koya kaka ba 20à 40 Mais mbala wana avis d'imposition eya Ba bambolanga mpenza ba 200 et quelques Wana elingi koloba que Kitoko ya momie eyali bien oyo balakisaka te na moto ya mpako maman bimaka, mais bimaka sukaka obe na balcon Hum yeh moto asalaka intérim ya sanza soki ebimi te Moto'yo a remplasaka ba fleure na jardin soki e fané Moto'yo ba proclama ye miss nanu a défilé te Amour na nga Aliol ma lumière qui ne faiblit jamais Docteur kateba, docteur Kipiatu, docteur Malala mon fort Nakokaki kopesa raison Alyana Na Adam soki akwesamaki na eden pona beauté na yo Mpo ata kolinga oyo epayi na nga ezalaki interdit Na beauté oyo yahwéh akelela yo jamais Nakokaki kokanga motema Mpo ekatisa ndelo Bellottie Ilanga, karol Nkoyi Alya nga vraiment nazo mituna Est-ce que yo obotama te mokolo ba Angelu bakweyisa mapapu? To mpe oza moto Aly tombée du ciel Mpo ya yo beauté Aly vraiment eza na ndoyi te Ata ba testament ancien et nouveau Na ba encyclopédies, ba encyclopédiste Ba koka te kocerner mystère ya beauté nayo Aliana Kasi epa na nga ali ozali Plaisir oyo eko kuta mutu ata na ndaku ya mawa Nzela oyo ezanga libaku Alya eza yo Y'oza mbula elingi eza mokokoli Ba lia ti na suka pomme verte na nga ah Mais selon ba fleuristes Aliana ozali Fleurette blanche nakati ya ba rosiers D'après maman Melu Ali oza paradisiaque En te promenant obungaka nzela Oye kosuka na maboko na nga nalengela yo oh Est-ce que idée ya kosala Tour effeil? Ewuta te Ali na vue de dos na yo? Yango échanger esilaki te Po bango ba s'impiraki te na béaute na yo mon amour Aliana Ali photo na yo akufa lobi soki atali yango abiki te Seke liwa naye Yahwéh asi asigne yango Bon voyage au paradis Eternité (Eternité bolingo ewumela) Koleka temps (tango musu azuakate po asala tour du monde) Hein hein amour ya vie nanga eza yo Y'oza réponse ya motuna ezangaka eyano Depuis le temps ya Moïse, Abrahama na roi Salomon Miso na nga ezalaka yo Alya na ralenti Crique (oyo ezalaki na motema esi elongwe) Nazali awa (lokola motuka oyo ezangi frein) Na descente moyen te na résister Aliya
Writer(s): Koffi Olomide Lyrics powered by www.musixmatch.com
instagramSharePathic_arrow_out