Lyrics

Litambwé Tata yéla ngáí lindanda nayoki mpósá ya koyemba Oh nakoléla la vie oh Mpasi ya mokili eh Litambwé Masasi Tata yela nga lindanda nayoki mposa nga nayemba Oh nákoyemba mpasi oh Mpasi ya mokili eh Litambwé Luntadila Tata simba ngáí tokende Na mokili ya nsé tozui té oh Tokozua atako na paradizo eh Sambelaka eh Na ntángo ya mpokua liboso ya kolala Sambelaka Nzakomba Sambelaka eh Ata liboso ya kobenda mua nkopo Sambelaka Yahvé Na mokili ya nsé Nzambé akaba ba chance, akaba bilongi oh Na mokili ya nsé Egalité ikélé vé oh Na mokili ya nsé Ekomama bongo oh Egalité oh Ezali sé na zando mpé na tango ya liwa Kolélaka té oh Na bolingo ya nsé Mibali balingi sé basi ya mobulu Oyo akoniokola yé Yé akolinga yé mingi oh Ekomama bongo Basi balingi mabala ya moniokoli Oyo akosalisa yé Yé akokamata yé ndé zoba Na bolingo ya nsé Ekomama bongo oh Moto yo okolinga eh Yé akolinga mosusu Mama yě yě Yě yě yě yě Odila Ntiti eh Ndéko tika nanu koléla Longola loboko na litama eh Longola loboko na litama Kiliko eh Longola mpinzoli na miso Amisi eh Longola loboko na litama Ǒ mpona kolela la vie Mpasi ya mokili eh Ngáí nazaláká na zuwa Natékéla basi ya mabala Nazaláká lolendo Natikéla bayé bazua kitoko Kitoko eloko pamba eh Kitoko ndé mabélé oh Nazalaka lokuta Natikéla ba tailleurs na ba ménuisiers oh Mama eh Natekéla ba esquiveurs na ba mécaniciens Lokuta na ngáí Nakindéla ba technicien ya ba télévision na ba frigo Nakaba lokuta na nga na ba escrocs Na ba nganga nkisi eh Mama eh Litambo eh, sala lokola ngaï Na mokili ya nsé Eloko moko tokopésa toli Ata ozangi nionso Kasi kozanga mbéto té oh Somba mbéto ya kitoko Mokolo yo okokufa ndéko eh Soki mbéto ya kitikwala Ebembé na yo ekoyoka nsoni Kinshasa makambo Na matanga tomonaka ndé makambo Basusu bákoléla Basusu bákotonga mbéto ya mowéi Surtout soki oyébanaka Mokili ngo makambo mama Mokili ngo makambo mama eh Oh Ferouz yela nga ya mpío Lokóla nazali nanu na bomoyi Kuna na nsé ya mabelé molungé elekí trop Na la vie élingi boyé La vie élingi boyé Na la vie ô buka mikúwa ntángo ozali na minu Sépélisa nzoto ntángo ozali makasi Lobi okokufa mama Na la vie baloba boyé Ba nkoko baloba boyé Na la vie ô yéba ntalo ya mbisi ntángo tata azali na bomoyi Yéba talo ya kwanga ntángo mama azali bomoyi Lobi bakokufa mama Na mokili ya nsé On ne vit qu'une seule fois eh Sakana libéla Soki ozui mwa ntango eh Mélaka libéla On ne vit qu'une seule fois eh Yaka ô tolingana Tala ô ntángo ezali koléka eh Liwa ékozéla Mabélé éponaka sé éloko ya kitoko Mabélé oh Aleili biso Bwalé Lésé oh Mabélé oh Bana ya Loméka bazali nde koléla Mujinga Mbuta akolela Loboko na litáma eh Mujinga eh Okeyi nde mobésu eh mamá Bana ya Loméka Bazangi lokóla Ma Gabi azangi Akolela ngala eh Ngo digbena eh Ba mama ya zándo Bazangi lokóla bana Lingwala bazángí Bákoléla ah na muyanzi Wapi tshoboke Na mokili toyaki Tozali lokóla na kati ya masuwa Monano to na motio libóngo ekosiema Bato bakokita Ekomama bongo Nzela ya mokili elekí ndé molayi Etondi na nzube Ezalí na suka te oh Na mokili tozali bapaya ngo tokoleka nzelá Tika ô nasakana Mamá ayebisaká nga date oyo nabotama Kasi oyo nakokufa ayebisaká ngai te oh Nzosimo yela ngáí nkopo ya mpío Lobi ekozala soki tour na Nga kuna na nsé ya mabelé Molungé elekí mingi oh Na mokili tozali bapaya ngo tokoleka nzelá Tokoleka nzelá Natíti eh Tokoleka nzelá Kiliko eh Gertrude bengela Nga ya Cisco eh Gonano bengela Nga ya Nkosi eh Tokoleka nzelá Zekera eh Tokoleka nzelá mamá eh Tokoleka nzelá mamá eh Gertrude bengela Nga ya Cisco eh Gonano bengela Nga ya Nkosi eh Tomela nkopo ya mpío mamá eh Na nsé ya mabelé molungé elekí mingi oh Tokoleka nzelá eh Tokoleka nzelá Ma Nzimalanda Tokoleka nzelá Kinsala Tokoleka nzelá ango Mendoza
Lyrics powered by www.musixmatch.com
instagramSharePathic_arrow_out