Lyrics

Rebe, tika nga nalela mwa moke oh Mpo na pasi oyo omonisa nga ah Ah pitié-pitié-pitié Ah pitié, mayi maleka oh Rebe, ngai natuta tolo te oh Mpo nakota boloko ya kolinga Ekotinda ngai nabwaka nzoto na fulu Nakoma prisonnière, oh Rebe Nazali condamné oh ya l'amour Nakolelela ye diye ti okokoma Kokima nzela nionso, mpo naleka oh Nakokosela ye likambo ya monene Baluka bipayi biso, mpo bakanga oh Nakotika mayi ekawuka na matama Soki batuni naloba se mpo ya Rebe oh Ah pitié, pitié diye oh, oh diye Ah pitié-pitié-pitié Ah pitié, mayi maleka oh Nani akokotela nga oh Namesana na nga mpo ya kolinga na makasi te oh Namesana na nga lisano ya ba-chérie eh Naboya kosonzela noki nakowa oh Namesana te oh, ngai nalobi eh Bapakola nga ngola, oh nateli te oh Ah nga nalela, oh mama Mama yamba ngai, oh mama Mama kaba ngai, oh mama Mama consolé ngai, oh mama Ebanda boni nazanga mpongi oh Naboma nani, oh iyao Natindi bato batuna na secret oh Motuwa nini, oh iyao Naluki moyen nasomba Rebe oh Na talo nionso, oh iyao Ah pitié, pitié diye oh, oh diye Ah pitié-pitié-pitié Ah pitié, mayi maleka oh Nafuti ticket nakoma na Bruxelles Akenda wapi, oh iyao Natuni bato balakisa epayi akende oh Na Amerika, oh iyao Ah pitié, pitié diye oh, oh diye Ah pitié-pitié-pitié Ah pitié, mayi maleka oh Balobi na ngai Rebe akoma na Afrika eh Nakolanda ye, oh iyao Na Togo, oh iyao Na Gabon, oh iyao Na Cameroun, oh iyao Na Abidjan, oh iyao Na Zaïre, oh iyao Na Sénégal, oh iyao Ah pitié, pitié diye oh, oh diye Ah pitié-pitié-pitié Ah pitié, mayi maleka oh Maloba ekangami mpe mongongo mokawuki Mpo napusa kobelela ye akipaka te oh Nakolanda ye, oh iyao Ah pitié, pitié diye oh, oh diye Ah pitié-pitié-pitié Ah pitié, mayi maleka oh
Lyrics powered by www.musixmatch.com
instagramSharePathic_arrow_out