Lyrics

Yo o sala soni, petite soeur Papa azalaki ko benga yo "cherie na yé" Azalaki ko préféré ndè o labéla yé Ponini o sali yé boyé ko? Yo o tikali na nini? Awa o kabi kabi nzoto Awa o téki motéma na ba yankés oyo ya shangaï Mawa mama Petite sœur o sali soni Dèko ya muasi o sali pasi Yo o tikali na nini? Awa o kabi kabi nzoto Awa o téki motéma na biléki oyo ya nzéla Awa o téki mobimba na yo Awa o kabi lokumu na loyengué oyo ya mopiato Mawa mama Petite soeur o sali soni Dèko ya muasi o sali pasi Bana ya wélisa ba yébi passi té Ba yébi kilo na nzoto té Ba yébi lokumu té Mokili é bonga boyé té Mokili é bonga malembé Mokili é bonga na limémia Mokili é bonga boyé té Mokili é bonga doucement Mokili é bonga na limémia Mawa mama Ko kendé liboso éza ko koma té O botamaki kitoko mpè na dignité Baninga kitoko ba tiki ko sala déshonneur Mais yo na moyi ba monaka yo té kaka na butu Na sé yaba réverbères, mpè na ba rond-points Na kati ya ba hotels ya ba niveaux nioso Ba nganda nioso kaka yo; monotonie O koma muasi ba solisaka sé na kitsuéki O koma fille oyo ba lingaka kaka sé na le secret Yo sala soni, petite sœur Elikia, bo ndoti nioso tu ... A bima na miso ya nganga Nzambé oyo mpèbé Mobali moko a latisa yé na mosapi lopèté Ba logua ba chagrin oyo ya ba parents A sala bango lokumu Po ya yo masolo ézalaka sé ya mosolo Masolo na yo sé ya bilamba oyo o défaka Masolo na yo sé ya mibali oyo o changeaka Ba dossiers na yo é yébanaka, valeur wapi Ba pésa yo kutu kombo championne ya moniato Yo sala soni, petite sœur na ngaï
Writer(s): Maika Munan, Koffi Olomide Lyrics powered by www.musixmatch.com
instagramSharePathic_arrow_out