Lyrics

Mwana te asengaki, ko ya na mokili Papa maman ba balani, ba boti mwana Ba dressaka nyama, moto ba edukaka ye Ba forcaka education te, ba salaka nde appel Na volonté ya mwana Otuni mwana, olingi nini ko Avis ya mwana tango mosusu Asala mosala ya maboko Lokola tata naye atanga Ako imposer mwana Il faut ozala docteur en droit, to licencier na economie Na ko tosa ba boti, mwana asali volonte ya ba parents Lelo a se retrouver nul Akomi ko ima ima Soki nga na komi boye, po na salaki choix na nga te Ndakisa ya ba papa misusu Mwana naye amoni ye na mwasi mosusu na nzela ba simbani Abengi mwana naye a corrompre ye na mbongo Koyebisa maman te na ndako noki ako silika ah Banda jour wana mwana wana akoma têtu Ata asali mabe, moyen papa a gangela ye ezalit e Azo banga sinon mwana ako funda epayi ya maman naye Ko beba education ya mwana nyoso wana Ndakisa ya ba maman oyo Abotamwana se moko Akomisi ye neti nzambe, ata mwana wana asali mabe Maman naye asiliki, botikela nga liso na nga Ezali se moko wana, sans le savoir ayeba A detruire mwana naye, a encourager ye na mabe Ndakisa ya ba parents misusu Mwana ya mbanda to azwa mwana ya ndeko afandaka epayi naye Akomisi ye lokola domestique Misala nyoso ya ndako bitinda epa ya mwana wana Bana naye moko ba salaka lisusu misala te Na makanisi naye que azo nyokola mwana wana Nzoka nde a detruire education ya bana naye Pe a eduquer mwana ya mbanda to pe ya ndeko oh Ba parents bozala ba irresponsables te Quelque soit difficulté ya vie oza nango Éduquer mwana yo moko La plus part ya bana oyo ba kolaka epayi ya ba ndeko Mingi ba zalaka na education ya bien te Cause po suivi ezalaka makasi te Parent nyoso esengeli azala model ya mwana naye Ba lobaka: "Tel père, tel fils" Mwana soki otie ye esika ya ba nyama Akomi ko loba neti ba nyama Example ya Romulus et Remus eh Ba zalaka ko loba neti ba nyama Po model na bango ezalaki loup eh Education eza dangereuse na vie ya mwana eza éducation diffusée Na ndako na kelasi bazo eduquer mwana ndenge mosusu Na libanda pe azu zua education ndenge mosusu Ba parents bo zala prudents Bana bo profiter na voix ya ba parents te, bo keba Mwana yo moko oza agent principale ya education nayo Mwana mosusu aza orphelin akufela baboti baye Mosusu ba famille ya baboti baye ba abandona bango Malembe malembe ba orienta ba vie na bango To mona pe lelo ba koma bato Parent opimela mwana bonbon biscuit to jouet kasi éducation te Education eza utile na vie ya mwana Lokola essence to batterie na bomoyi ya voiture
Lyrics powered by www.musixmatch.com
instagramSharePathic_arrow_out