Lyrics

Yaka yaka na linga yo bongo sima liwa kozua ngayi Mon amour Denise betou Na yebi sikoyo motema mua yo mosili mokomi ngayi Miso maboyi ko mona oh Matoyi pe eboyi ko yoka mongongo ya chéri Maman a yebisaki ngayi na mbongwana maman nguli Lisapo ya tipo ateka kimokolo pona kunde Na sekaki na sekaki eh Ko seka ndenge ya forcer Lelo pe nako seka po naboyi oyeba que na zuaki posa yako lela Pamba te soki mpasi eleki Mayi ya misu eboyi ko tanga Awa mpasi eleki makila mua boyi nzoto na mipesi na nzambe Denise na pesi motema na ngayi nioso se nayo Denise maman grady djogra Soki pe oko boya nga mawa na ngayi Mvula eko tika kaka ko noka te na bomoyi na nga Elili nayo etonga mboka na motema na nga Na moyi pe na butu se kobanza ba penser nioso nayo Denise zala comme union na ngayi oyo ya Liboso Po ngayi pe na kota na molongo ya bana nzambe Denise pesa nga mua l'amour ebikisa oyo ya nga molimo Emona se ba mawa toute ma vie durant Ba kunda yo na ngayi lilita moko Kasi na lingi yo se ndenge mokristo alingaka Losambo photo ya elongi nayo na ndaku na ngayi Ekomi bendele Denise Eyesi nga zaba chérie Nani adefisa oyo yanga ye misu bolingo ebomi yanga Na tala maman blessing ndenge azali kitoko Koleka kutu mabele Koleka sourire ya bébé Koleka elengi ya ba milliards Maman na gradi Yaka yaka na linga yo bongo sima liwa kozua ngayi Mon amour Denise betou Uuuuh Hum bolingo ezali université Esengaka okenda na ngo ti na suka Esangaka oya kozua ata mua doctorat Na kelasi moto tout alingaka azala le premier Contrairement na kelasi na l'amour Moto tout alingaka azala naye le Dernier na la vie ya moto alingi maman na Joyce Dernière penser Na lalaka nango ezali yo Première penser na lamukaka nango pe yo Ndima obala nga nazua mukanda mboka diamant Po yo ozali diamant Denise betou Na nga Kasi diamant te ba bombaka ngo na poche mais na motema précieusement Précieusement eh maman Denise na ndima que nzambe asala nga Na bolingo Po yo ondima kozala ya ngayi pour toujours Depuis obala nga Na koma pe ko tuta tolo Ndeti bato oyo ba zalaka na mbongo ebele na nzela ba Koma ko benga ngayi pe prêtre kasi prêtre ya bolingo ebele Bolingo otia nga na motema mbeli ya ba chirurgien Kotiya nga te mbeli bakatelaka fumbua Bongo na kati omona elongi nayo ko tika ko niokola Nga ko sala nga ba cata ebongo nga Na kufa na kimia Mabe na sala yo Denise oyo yebi na oyo oyebi te Na sengi palado limbisa nga Denise ozali mokristo Loba soki olingi na kende ko fukama Denise na Boulevard du 30juin po olimbisa ngayi nako yoka soni te Soki olingi na kende o fukama Denise Devant ba soldat nioso oyo ya RDC Na fukama devant batu ya Fcc pe ya Cash batu ya Lamuka ata na stade de martyrs Denise nako sala ngo pona moni yo Na ndimi ba longola nga pete ya colonel na zonga ata lieutenant Pona amour nayo na tikala simple officier ya amour nayo Denise betou Yesu akufaki pona masumu na biso ngayi Na ndimi na kufa pona bolingo ya gradi Bolingo ya blessing Bolingo ya Joyce Maman o gagner nga Na motema eh Denise oza nayo elonga Maman oleki nga nako kumba eh et pourtant nanu te ozua permis A chérie il fallait kutu ozala baba eh po nioso tout olobaka na regard Chérie ozua te diplôme ya kiné Pourtant maboko nayo eguerisaka tout Oh oh oh Denise betou eh Oh oh oh maman pardonner Oh oh oh betou Denise Oh oh oh chérie ya motema Oh oh oh maman bana na nga Oh oh oh l'amour de ma vie Na tindeli yo maloba epa ya blessing na Tindeli yo maloba que nga Na lingi yo eh Oh oh oh Denise betou eh Oh oh oh maman pardonner Oh oh oh betou Denise Oh oh oh chérie ya motema Oh oh oh maman bana na nga Oh oh oh l'amour de ma vie Yaka otikisa nga ko lela mabanzo eleki Yaka na tika ko lela mon amour Denise Oh oh oh Denise betou eh Oh oh oh maman pardonner Oh oh oh betou Denise Oh oh oh chérie ya motema Oh oh oh maman bana na nga Oh oh oh l'amour de ma vie Na tindeli yo maloba epa ya gradi na Tindeli yo maloba que nga Na lingi yo eh Oh oh oh Denise betou eh Oh oh oh maman pardonner (oh maman) Oh oh oh betou Denise (amour) Oh oh oh chérie ya motema (motema) Oh oh oh maman bana na nga Oh oh oh l'amour de ma vie Maman Denise batu nioso ba lobi Limbisa Emmanuel tshisekedi mobali nayo Na mopao mokonzi na cyndi le cœur limbisa
Lyrics powered by www.musixmatch.com
instagramSharePathic_arrow_out