Lyrics

Boyoka yoka yoka mongongo na nga ekobelela Melodie ya mama natindi libonza ah Oyamba ya ngo oya gai maloba moke wana Mama naloti na butu na ndoto oh bizarre Ti ngai nakomi mobange eh Baye nasalisaka bakomi koseka nga Basi na zuaka bakomi kozomela nga Mosala oyo pasi ezangi nde melesi ih Yoka nde likambo ezangi eyano Ai ai ih oh oh lelo nayebi eh Mokolo ya kufa na nga banguna bakosala nde feti Baboti ba nga bakolela bana bakolela papa Ba yaya bakolela leki na biso akeyi Mokolo yango ekozala makambo ma Mama kolela te ngai na botama mabele Yawe Allah kumbama Tika tolengela mua tango Luccelle Jeannot Kano yeba te mokili oyo eza se moko On ne vie qu'une seule fois, il faut en profiter Mayele ya bo mwana ah Na ki mobange te tokosala ba carriere yango Tika to profiter Mokolo yango ekozala makambo ma Mama kolela te ya ngai ngonga ekoki Yawe Allah kumbama Tika na milengela maso tango oyo Tika to mibongisa bato ya mokoli ih Bob Masua Esengeli tomilengele na bizaleli po na lola Yo moto ya mokili ozui moke bomba moke Carriere ya moto pe esilaka ah ah yeba Mandat ya l'état pe esilaka ah ah Sima ya liwa na nga na boyi bana banga basambwa Bayoka soni eh na likambo papa asalaka ye ye ye mawa na nga eleki Oh Mokolo ngai nakomi mobange Mokolo ngai nakomi mobange mayi na miso Na kolela kaka tango nazala na bolenge Ngai yoyo lelo na komi kokoma mpaka sima liwa eh eh eh Oyebaka tango ezali koleka Soki tango ekei ezongaka te lisusu Meka okanga ya yo tango, tango esi eh se prensenter kotika yango te moninga Oyebaka bowa vida Tango ezali kokende se kokende oh ma Kanga ya yo tango tango ekoleka muana ekozonga simate
Lyrics powered by www.musixmatch.com
instagramSharePathic_arrow_out